Psalms 47

Bobetela Nzambe maboko

Nzembo ya bana ya Kore epai ya mokambi ya bayembi.


1 Bobeta maboko bino nyonso ;
boganga epai ya Yawe na esengo nyonso

2 Tala ndenge, Yawe, Nzambe oyo Aleki Likolo azali somo,
azali mokonzi monene likolo ya mokili mobimba.

3 Atiaki bikolo na se ya bokonzi na biso,
bato ya bikolo mosusu na se ya makolo na biso.

4 Aponelaki biso bomengo
lokumu ya Zakobi oyo ye alingaka mingi.

5 Nzambe amataki na kati na koganga ya esengo ;
Yawe amataki na kati na makelele ya kelelo.

6 Boyemba masanzoli mpo na Nzambe, boyemba masanzoli ;
boyemba masanzoli mpo na mokonzi na biso, boyemba masanzoli.

7 Pamba te, Nzambe azali mokonzi ya mokili mobimba ;
boyembela ye nzembo ya masanzoli.

8 Nzambe azali mokonzi ya bikolo nyonso ;
Nzambe avandi na Kiti na ye ya bosantu.

9 Bato ya minene ya mokili basangani esika moko
lokola bato ya Nzambe ya Abraham ;
pamba te mikonzi ya mokili bazali ya Nzambe ;
ye anetolami makasi.
Copyright information for LinMNB